[color=darkblue][/color][size=18][/size]
Na 1965, na lopitalo ya Kintambo na Kinshasa, F.K.M. abotami. Ntángo akoli, mposa ya kokende Poto ekomi kotungisa ye pene akufa. Mpo na nini? Ebandaki ndenge nini? Est-ce que akozwa mbongo ya ticket? Akokoka kokende Poto? Soki akomi na Poto yango, est-ce que akosepela? Ekosuka boni?Oyo ezali lisolo ya Soulboth Nzinga-Kuvu dit Fwa-ku-Mputu!
Lisoló oyo ezali kolakisa vie na Kinshasa mpe na Brazzaville entre 1960 tii sikoyo. Nakomi yango lokola roman na lingala. ezali sous presse. ekobima Fin Juillet 2002.
Ngaï nawuta Kinshasa mpe nafandaka na Bruxelles. Nazali Chimiste (Licencié na Université ya Kinshasa, D.E.S. na Université Libre ya Bruxelles). Nasalaka lokola moluki (chercheur) na génomique végétale na centre de recherche Biovallée na Belgique. Nalingaka mpe kokoma mikanda, ezala na lingala to mpe na français. Oyo ezali lisolo ya liboso nakomi na lingala ya Kinshasa. Nazali mpe kobongisa masolo misusu na lingala mpe mikanda mibale na français : Histoire des Batiene du Congo mpe En Cavale dans le gouffre vert.
mpo na koyanola :
bsenemong@hotmail.com