Congopage

Le lien virtuel des congolais
Nous sommes actuellement le Mar 21 Mai, 13 1:10

Le fuseau horaire est UTC+1 heure




Publier un nouveau sujet Répondre au sujet  [ 9 message(s) ] 
Auteur Message
 Sujet du message: mokolo ya matanga
MessagePublié: Mer 30 Mai, 07 6:47 
Hors-ligne

Inscription : Sam 22 Fév, 03 9:13
Message(s) : 157
Localisation : Ouganda
Bandeko,

Matanga ekozala mokolo nini? Namoni solo Forum Lingala ekufi. Nandimi te 'te ekosekwa lisusu.

Ezalaki liboso likambo ya kitoko na masolo ebele mpo na bato balingi koyekola lingala. Kasi kala wana ebongwana kaka esika mpo na bato kotuna maloba ya nzembo to mpe kobongola mwa maloba mpo na balingami na bango ya Congo.

Tokunda forum mpe etikala kaka service de traduction mpo na baoyo balingi koyekola lingala te, balingi kosolola na lingala te, balingi kaka koyeba mwa maloba ya nzembo to kosepelisa molingami nde bakei na bango. Mpo na baoyo balingi koyekola lingala, eloko ezali lisusu mpenza te. Etikali kaka tosala matanga.


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Mer 30 Mai, 07 8:58 
Hors-ligne
Avatar de l’utilisateur

Inscription : Ven 19 Juil, 02 3:45
Message(s) : 4444
Localisation : Paris
Mawa ! Ya solo, la vie ne tient qu'à un fil. Motivation ezali eloko ya makasi. Balobaka "motivation" ndenge nini na lingala ?


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Jeu 31 Mai, 07 11:56 
Hors-ligne

Inscription : Lun 07 Mars, 05 7:06
Message(s) : 70
Mère Evé :
"Motivation" ekokí kozala "likémbisi" engebene Kawata. Nayébí sókí bato míngi balobaka yangó té. Nakútí ndakisa ya maloba na yangó té.


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Ven 01 Juin, 07 10:29 
Hors-ligne
Avatar de l’utilisateur

Inscription : Ven 19 Juil, 02 3:45
Message(s) : 4444
Localisation : Paris
Natondi yo, Moyogo !

Nazali mpe na liloba mosusu nalingi kotuna bino soki boyokaka yango ndenge nini : sakola. Nasi nayebi yango, kasi nalingi koyeba soki bakoyoka yango ndenge mosusu…


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Ven 01 Juin, 07 1:44 
Hors-ligne
Avatar de l’utilisateur

Inscription : Mar 17 Fév, 04 3:40
Message(s) : 252
Mama Evé, na yebi te, kasi ebongi to sakola mpo na ko sekuisa esika oyo lokola Eloko a lobi ya ngo. Matanga ezali te mpo ebembe ezali te. To sakola mpo esika owo ezonga lokola ezalaki.


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Ven 01 Juin, 07 5:32 
Hors-ligne

Inscription : Mar 16 Sep, 03 9:30
Message(s) : 8268
Citer:
To sakola mpo esika owo ezonga lokola ezalaki.


B. Alice

Lingala na yo e zo kende na mode ya Océan ! :D


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Ven 01 Juin, 07 9:25 
Hors-ligne
Avatar de l’utilisateur

Inscription : Mar 17 Fév, 04 3:40
Message(s) : 252
:lol: ;) nakokaki kokoma kombo ya mboka wana te mbala mibale (loboko ebeti libaku, na sepeli penza mpo na libaku ya ngo) ezali lokola ko miseka ngai moko. Lokola bato banso ba yebi nini na lingaki na loba, eleka kaka bongo.


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Sam 02 Juin, 07 12:17 
Hors-ligne

Inscription : Mar 16 Sep, 03 9:30
Message(s) : 8268
Citer:
nakokaki kokoma kombo ya mboka wana te mbala mibale


Ya solo penza (é yemba Wendo to Adou Elenga) OYO mboka té...


Haut
 Profil  
 
 Sujet du message:
MessagePublié: Dim 24 Juin, 07 7:49 
Hors-ligne
Avatar de l’utilisateur

Inscription : Mar 17 Fév, 04 3:40
Message(s) : 252
Ndeko Eloko ozali wapi ?

Kasi tolobaki te ebongi to sekuisa esika oyo. Boni olimwe na yo boye? Olingi kaka tosala matanga ? Tê, ezali likanisi moko ya mabe. Yaka kokabela biso makoki ma yo. Na moni te ozali na nguya ya kosala te esika owo ezongela bomoyi na ye. Yaka ndeko to mipesana maboko mpo monoko na biso ezala na esika na ye na kati ya CP. :thup


Haut
 Profil  
 
Afficher les messages publiés depuis :  Trier par  
Publier un nouveau sujet Répondre au sujet  [ 9 message(s) ] 

Le fuseau horaire est UTC+1 heure


Qui est en ligne ?

Utilisateur(s) parcourant ce forum : Aucun utilisateur inscrit et 2 invité(s)


Vous ne pouvez pas publier de nouveaux sujets dans ce forum
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum
Vous ne pouvez pas éditer vos messages dans ce forum
Vous ne pouvez pas supprimer vos messages dans ce forum

Recherche de:
Aller vers :  
Powered by phpBB® Forum Software © phpBB Group
Traduction et support en françaisHébergement de site